Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 6:29 - Mokanda na Bomoi

29 Yawe ayebisaki Moyize : — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 6:29
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.


Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Nazali Yawe.


Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito :


Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.


Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. »


Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo ; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.


Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ;


« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.


Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »


« Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele ; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ