14 Tala bakambi ya mabota na bango : Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.
Tala bakambi ya bituka na bango : Eferi, Yisheyi, Elieli, Azirieli, Jeremi, Odavia mpe Yadiele. Bazalaki bilombe ya bitumba, bato bayebana mpe bakambi ya mabota na bango.
Bana mibali ya Tola : Uzi, Refaya, Yeriyeli, Yamayi, Yibisami mpe Samuele. Bango nde babotamaki na nzela ya Tola mpe bazalaki bakambi ya mabota ya botata na bango. Kati na mabota na bango, bazalaki basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na mibale na nkama motoba, na tango Davidi azalaki mokonzi.
Bela abotaki bana mibali mitano : Etsiboni, Uzi, Uzieli, Yerimoti mpe Iri. Bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango ya bato oyo batangamaki ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na tuku misato na minei.
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito.
Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale ; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye,
Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli ; na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini ; na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini ;
Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango.
Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana ; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango.
Yango nde ezalaki libula ya mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka, kolanda mabota ya bana ya Isalaele, bakabolaki na zeke liboso ya Yawe, na Silo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye nde basilisaki kokabola mokili.