Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 6:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 6:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso.


Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma ?


Tala bakambi ya mabota na bango : Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. Wana nde mabota ya Ribeni.


Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki : « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. »


Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango.


Atiaki ye maboko mpe apesaki ye mosala, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.


mpe alobaki na Ye : — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. »


Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo : kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,


Liboso ya Nzambe, ya Yesu-Klisto mpe ya ba-anjelu oyo baponama, napesi yo mokumba ya kobatela mitindo oyo na kozanga kopona bilongi.


Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato :


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.


Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ