Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »
Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango !