Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 5:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 5:9
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ?


Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye ? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ?


Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato : — Tala makambo oyo Faraon alobi : « Nakopesa bino lisusu matiti te.


Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! »


Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.


Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »


Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ?


Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ