7 — Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso ; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango.
Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela.
Abakisaki : — Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele ; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu.
Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele :
Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! »
Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo ; tozangi eloko moko te.