Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?
Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.