Kobima 5:21 - Mokanda na Bomoi21 Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.
Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :
Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este ; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.