Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango : « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. »
Balobaki : — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso !