Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 5:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba : — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 5:13
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo.


Esekaka makelele ya bingumba mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda.


Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.


Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »


Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki.


Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango : — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ?


Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ