Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba : — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti !
Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka, matiti oyo moto ekotumba ; bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te na nguya ya moto : Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola to moto mpo na kovanda zingazinga na yango.
Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.
Batambolaka likolo ya basonge ya bangomba na makelele makasi lokola makelele ya bashar, lokola makelele ya matiti oyo ezali kozika, lokola mampinga moko ya basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kokende na bitumba.
Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.