Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 5:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato : — Tala makambo oyo Faraon alobi : « Nakopesa bino lisusu matiti te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 5:10
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »


Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele :


Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.


Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.


Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, bantoma bazali komema bozwi na bango na mikongo ya ba-ane, bomengo na bango na mikongo ya bashamo, epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango ata litomba moko te :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ