Napakolaki yo mafuta mpo ete ozala Sheribe oyo abatelaka, oyo mapapu na ye efungwama ; pamba te Ngai nde natiaki yo na ngomba ya bule ya Nzambe ; ozalaki wana, ozalaki kotambola na kati-kati ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto.
Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango.
abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.