Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.
Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende ; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango.
Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.