Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani : sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.