Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 40:3 - Mokanda na Bomoi

3 okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 40:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo, natikali nanu kovanda na ndako moko te ; nazalaki kaka kati na Mongombo, longwa na esika songolo kino na esika pakala.


Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano.


Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.


Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ;


Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido,


Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :


Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu.


Tango bakolongola molako, Aron elongo na bana na ye ya mibali bakokota na kati, bakokitisa rido mpe bakozipa na yango Sanduku ya Litatoli.


Sima na rido ya mibale, ezalaki na etando oyo bazalaki kobenga « Esika-Oyo-Eleki-Bule. »


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ