28 Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo.
mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo.
Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.