25 Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo.
Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo.
Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.
« Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › »
Aron asalaki kaka bongo : atiaki minda na liboso ya etelemiselo ya minda ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe.