Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango.
ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?
Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.