21 Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido,
okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.
Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule.