Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 40:13 - Mokanda na Bomoi

13 Sima na yango, okolatisa Aron bilamba ya bule, okopakola ye mafuta mpe okobulisa ye mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 40:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.


Okozwa mafuta ya epakolami, okosopa yango na moto na ye mpe okopakola ye yango.


Okomema mpe bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala.


Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ;


Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › »


Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango.


Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, alatisaki bango banzambala, akangaki bango mikaba na loketo mpe alatisaki bango bikoti, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo.


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.


ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?


Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso.


Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ