Kobima 4:6 - Mokanda na Bomoi6 Sima, Yawe alobaki na ye lisusu : — Tia loboko na yo na tolo na yo. Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye ; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba ; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu : soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota : elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.