5 Yawe alobaki na ye : — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo.
Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye : « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali.
Isalaele apambolaki Jozefi mpe alobaki : Tika ete Nzambe oyo, liboso na Ye, bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki, batambolaki, Nzambe oyo azali Mobateli na ngai wuta mokolo ya mbotama na ngai kino na mokolo ya lelo,
Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »
Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.
Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › »
Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »
Alobaki lisusu : — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.
Kasi Yawe alobaki na ye : — Sembola loboko na yo mpe kanga nyoka yango na mokila ! Moyize asembolaki loboko mpe akangaki nyoka ; mpe nyoka yango ebongwanaki lisusu lingenda na loboko na ye.
Moto ya Efrayimi ezali Samari, mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, bokolonga te kotelema liboso na bango ! › »
Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
Bongo, alobaki na Toma : — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.