Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki moto kokita mpe nkembo na Yawe na likolo ya Tempelo, bafukamaki bilongi kino na mabele ; bongo bagumbamelaki mpe basanzolaki Yawe na maloba oyo : « Azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.
Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › »
Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »
Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.
Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo.
Yawe alobaki na ye : — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo.
Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda ; bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango. Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni, pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango, akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango, oyo bakowuta na bowumbu.
Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.