28 Moyize ayebisaki Aron makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba mpe bikamwa nyonso oyo atindaki ye kosala.
Moyize azongaki, abengisaki bakambi ya Isalaele mpe ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba.
Nzambe alobaki na ye : — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.
— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo.
Moyize ayebisaki bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye.
Mwana azongisaki : « Naboyi. » Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango.