Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 4:23 - Mokanda na Bomoi

23 Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 4:23
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.


Ye nde abomaki bana ya liboso ya Ejipito, kobanda na bato kino na banyama ;


Abomaki bana mibali ya liboso ya Ejipito ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito, bambuma ya liboso ya makasi na bango na se ya bandako ya kapo ya Cham.


Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo.


Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele.


Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.


Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›


Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango.


Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »


Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. »


— Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.


Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.


Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. »


Yawe alobaki na Moyize : — Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka.


Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka.


Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’


Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.


Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango,


Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ