Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe
Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.