Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 4:15 - Mokanda na Bomoi

15 Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 4:15
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.


Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.


Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.


Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.


Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba.


Moyize ayebisaki Aron makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba mpe bikamwa nyonso oyo atindaki ye kosala.


Aron ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe alobaki na Moyize. Asalaki bikamwa liboso ya bato.


Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona : ‹ Bozali bato na Ngai ! › »


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.


Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.


Bongo Moyize alobaki : « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te :


Balami azongiselaki Balaki : — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko ? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.


Balami azongisaki : — Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ?


Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa ;


Bandeko na ngai, nalingi sik’oyo kozongisa lisusu na makanisi na bino, Sango Malamu oyo nateyaki bino, oyo boyambaki, oyo bomipesi na yango,


Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.


Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »


Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi ; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ