Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli, oyo bakangaka nguya na yango na nzela ya ebende mpe ya singa oyo batiaka na minoko na yango mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »
Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.
Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.
akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ;
Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.
Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.
Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.