Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 4:11
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »


Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.


Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.


Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko, mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.


Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te ? Ye oyo asala liso akoki komona te ?


Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.


mpo na kofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa bakangami na boloko mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.


atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki : « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, mabe na yo esili kolongwa, masumu na yo esili kolimbisama. »


Nazongisaki : — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !


Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.


Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba.


Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga ? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te ?


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama.


Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe.


Bamosusu bazalaki kozongisa : — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ