41 bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali.
Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango.
bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,
Batongaki na langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe kati na Mongombo ; batongaki mpe bilamba ya bule mpo na Aron, ndenge kaka Yawe atindaki yango na Moyize.
batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango, rido mpo na ekotelo ya lopango, basinga na yango, bapike na yango, bisalelo nyonso mpo na mosala ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,