Batandaki mabende mike-mike ya wolo, bakataki-kataki yango lokola basinga mpe bakotisaki kati na langi ya ble mpe ya motane ya pete, langi ya motane makasi mpe lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
Mokaba ya efode esalemaki lolenge moko na efode : ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.