Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
Basalaki na wolo ya peto medaye lokola elembo ya libulisi na ye epai na Yawe mpe bakomaki na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.