30 Basalaki na wolo ya peto medaye lokola elembo ya libulisi na ye epai na Yawe mpe bakomaki na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.
Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
mpe mikaba oyo batonga bililingi na likolo na yango na basinga ya lino ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,