Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
Akangisaki na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. Asalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.