18 Akangisaki basonge mibale mosusu ya basheneti oyo mibale na bikangelo mibale oyo atiaki na bankamba ya efode ; bankamba yango elekaki na liboso.
Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo.
mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te ; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga.
Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba ekoleka likolo ya mapeka.
Alekisaki basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo atiaki na basonge mibale ya elamba ya tolo.
Asalaki lisusu bapete mibale ya wolo mpe atiaki yango na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
Matama na yo ezalaka kitoko kati na biloko ya matoyi, mpe kingo na yo ebongaka na mayaka.