16 Basalaki bikangelo mibale ya wolo mpe bapete mibale ya wolo mpe bakangisaki yango na basonge mibale ya elamba ya tolo.
Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo.
Okotia bikangelo ya wolo
Basalaki basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; basalaki yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
Alekisaki basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo atiaki na basonge mibale ya elamba ya tolo.