Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 39:13 - Mokanda na Bomoi

13 na molongo ya minei, libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Akangaki mabanga yango na bikangelo ya wolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 39:13
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango.


Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai : wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele.


Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo.


Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele


Na molongo ya misato, libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ;


Mabanga yango ezalaki zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakomaki kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakomaki yango ndenge basalaka bililingi na kashe.


Maboko na ye ezali lokola bapete ya wolo oyo batia mabanga ya Krizolite. Nzoto na ye ezali lokola pembe ya nzoko oyo babongisi mpe babakisi mabanga ya safiri.


Tala ndenge bapine yango ezalaki mpe ndenge basala yango : ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite mpe nyonso minei ezalaki ekokana ; bongo na ndenge basala yango, ezalaki lokola moko kati na mosusu.


saridwane na moboko ya mitano, korinaline na moboko ya motoba, krizolite na moboko ya sambo, berili na moboko ya mwambe, topaze na moboko ya libwa, krizopraze na moboko ya zomi, tirikwaze na moboko ya zomi na moko, mpe ametisite na moboko ya zomi na mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ