Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 39:1 - Mokanda na Bomoi

1 Batongaki na langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe kati na Mongombo ; batongaki mpe bilamba ya bule mpo na Aron, ndenge kaka Yawe atindaki yango na Moyize.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 39:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.


bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,


Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.


bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,


bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. »


Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango.


Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango.


bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali.


Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. »


Tala mobeko oyo etali Tempelo : bisika nyonso oyo ezali zingazinga ya likolo ya ngomba ekozala bule koleka. Yango nde mobeko oyo etali Tempelo.


Akotaki mbala moko mpo na libela kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe abonzaki kuna makila ya bantaba te mpe ya bana ngombe te, kasi abonzaki nde makila na Ye moko. Ezali ndenge wana nde azwelaki biso lisiko ya libela.


Klisto akotaki kuna te mpo ete amikabaka mbala na mbala lokola mbeka, ndenge mokonzi ya Banganga-Nzambe azalaki kokota mobu na mobu kati na Esika ya Bule elongo na makila oyo ezalaki ya ye te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ