Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 38:8 - Mokanda na Bomoi

8 Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani : sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 38:8
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze ; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko.


Asalaki nzungu ya monene ya bronze, oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele mitano ; bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe zingazinga na yango, bametele zomi na mitano.


Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,


etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso ; sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango ;


Boye, mpo na komema etumbelo, bakotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Bongo etumbelo yango ezalaki polele kati na yango.


mpe okotia sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.


Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai !


bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.


Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.


Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile.


sima na yango, akufisaki mobali mpe atikalaki lisusu kobala te kino akokisaki mibu tuku mwambe na minei ya mbotama. Azalaki kolongwa te na Tempelo, kasi azalaki kosalela Nzambe, butu mpe moyi ; azalaki kokila bilei mpe kosambela.


Yesu alobaki na ye : — Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto ; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto ; kasi bino nyonso te.


Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo.


Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.


Ezali na yango kaka malako na tina na bilei, masanga mpe ndenge ebele ya komipetola : mibeko ya bomoto, oyo bazalaki kosalela kino na tango oyo Nzambe abongolaki makambo nyonso.


Bana na ngai, tika ete moto moko te akosa bino. Moto oyo atambolaka na bosembo azali sembo ndenge Ye moko Klisto azali sembo.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele ; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ