30 Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso.
Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata.
Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata ; mpe makolo na yango ya bronze.