29 Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko.
Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi.
Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso.