28 Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi.
Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata ; mpe makolo na yango ya bronze.
Basalelaki bakilo ya palata nkoto misato na nkama minei na tuku mibale mpo na kosala bivandelo nkama moko ya Mongombo mpe barido nkama moko : elingi koloba ete basalelaki bakilo pene tuku misato na minei mpe bagrame pene nkama mibale mpo na evandelo moko.
Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko.