25 Palata oyo bazwaki na maboko ya bato oyo batangamaki na lisanga, ezalaki bakilo nkoto misato mpe bagrame nkama minei na tuku minei, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.
— Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama.
Okozwa epai ya bana ya Isalaele mpako mpo na kosikola bomoi na bango mpe okosalela yango mpo na mosala ya kobongisa Ndako ya kapo ya Bokutani. Ekozala mpo na bana ya Isalaele ekaniseli liboso ya Yawe mpo na lisiko ya bomoi na bango.
« Tanga motango ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango mpe bituka na bango ; mpe koma bakombo ya mibali nyonso, moto moko na moko.
« Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. »