Kobima 38:24 - Mokanda na Bomoi24 Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.