Kobima 38:17 - Mokanda na Bomoi17 Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze ; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Rido ya ekuke ya lopango ezalaki ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. Molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi, mpe bosanda na yango, bametele pene mibale na basantimetele pene tuku mitano, ndenge barido nyonso ya lopango ezalaki.