Kobima 37:9 - Mokanda na Bomoi9 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama : lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu ; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Tala makambo oyo tondimaka elongo : Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.
Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.