3 Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
Bongo Balevi bamemaki na banzete Sanduku ya Nzambe na mapeka na bango ndenge kaka Moyize atindaki, kolanda Liloba na Yawe.
Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.
Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo.
Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.