Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko.
Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.