Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 37:1 - Mokanda na Bomoi

1 Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 37:1
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuri azalaki tata ya Uri, mpe Uri azalaki tata ya Betisaleyeli.


Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ;


Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo.


okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido.


Boye nasalaki sanduku na mabaya ya nzete ya akasia mpe nabongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Namataki likolo ya ngomba, namemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ngai.


Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ